Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mwana ya Nzambe
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Mwana ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.
Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki: « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
Simona Petelo azongisaki: — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.
mpe na nzela ya Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe, na nzela ya lisekwa na Ye kati na bakufi: Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Mpe litatoli yango ezali: Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na Ye. Moto oyo azali na Mwana azali na bomoi, kasi moto oyo azangi Mwana na Nzambe azangi mpe bomoi.
Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba: « Ozali mwana na ngai; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na yo? » To mpe: « Ngai nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai? »
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe,
Anjelu azongiselaki ye: — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.
Nazali koloba na bino penza ya solo: tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi;
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
mpo na nini koloba na tina na Ngai oyo Tata abulisa mpe atinda kati na mokili: « Ozali kofinga, » mpo nalobaki: « Nazali Mwana na Nzambe? »