Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mwana ya liboso likoló ya bizalisi nyonso

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Mwana ya liboso likoló ya bizalisi nyonso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bakolose 1:16

pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama kati na Likolo mpe na mabele, bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te, milimo mpe bokonzi ya milimo, bakonzi ya milimo mpe banguya. Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu nde nyonso ekelama.

02 Bakolose 1:17

Yesu azali liboso na nyonso, mpe nyonso esimbama kati na Ye;

03 Yoane 1:3

Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.

04 Emoniseli 1:5

mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,

05 Ba-Ebre 1:6

Mpe lisusu, tango Nzambe atindaki Mwana na Ye ya liboso kati na mokili, epai ya nani aloba: « Tika ete ba-anjelu nyonso ya Nzambe bagumbamelaka Yo? »

06 Ba-Ebre 1:2

Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.

07 1 Bakolinto 8:6

Kasi mpo na biso, Nzambe azali kaka se moko, Ye nde azali Tata mpe Mokeli na nyonso, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye. Mpe Nkolo azali kaka se moko, Ye nde Yesu-Klisto. Nyonso esalema na nzela na Ye, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye.

08 Bakolose 1:18

azali moto ya nzoto na Ye, oyo ezali Lingomba; azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,

09 Barome 8:29

Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.

10 Yoane 1:10

Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te.

Bantína oyo etali