Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Elilingi ya Nzambe

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Elilingi ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bakolose 1:15

Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, azala liboso ya bikelamu nyonso,

02 Ba-Ebre 1:3

Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

03 2 Bakolinto 4:4

ba-oyo bazangi kondima, ba-oyo mayele na bango ebebisama na nzambe ya mokili oyo, mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu oyo emonisaka nkembo ya Klisto oyo azali elilingi ya Nzambe.

04 Yoane 14:9

Yesu azongiselaki ye: — Ah Filipo! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi: « Lakisa biso Tata? »

05 Bafilipi 2:6

Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,

06 2 Bakolinto 4:6

Pamba te Nzambe oyo alobaki: « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.

07 Yoane 12:45

mpe moto oyo amoni Ngai, amoni mpe Ye oyo atindaki Ngai.

08 Yoane 14:7

Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai; mpe kobanda sik’oyo, boyebi Ye mpe bomoni Ye.

09 Yoane 1:18

Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.

Bantína oyo etali