Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kongɛnga ya Nzambe

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Kongɛnga ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Masolo ya Kala 29:11

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.

02 Banzembo 104:1

Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene! Olata kongenga mpe lokumu,

03 Banzembo 96:6

Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule.

04 Banzembo 145:5

Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.

05 Banzembo 8:1

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

06 Banzembo 21:5

Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.

07 Yobo 37:22

Kongenga lokola wolo ezali koya wuta na ngambo ya nor. Nzambe avandi kati na nkembo ya somo.

08 Banzembo 111:3

Misala na Ye emonisaka nkembo mpe lokumu na Ye, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.

09 Abakuki 3:3-4

Nzambe abimelaki na engumba Temani, Mosantu abimelaki na ngomba Parani. Nkembo na Ye ezipaki likolo, mpe lokumu na Ye etondisaki mabele. Azalaki kongenga lokola moyi, mpe pole makasi ezalaki kobimela na loboko na Ye, epai wapi nguya na Ye ebombamaka.

10 Banzembo 90:16

Tika ete biso, basali na Yo, tomona misala na Yo; mpe ete bana na biso bamona kongenga makasi ya nkembo na Yo!

11 Ezayi 60:1

« Telema mpe ngenga, pamba te pole na yo ezali koya, mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo.

Bantína oyo etali