Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Lokumu na Ye

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Lokumu na Ye mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 8:1

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

02 Banzembo 93:1

Yawe azali kokonza, alati lokumu monene; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.

03 Banzembo 104:1

Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene! Olata kongenga mpe lokumu,

04 1 Masolo ya Kala 29:11

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.

05 Jide 1:25

epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela! Amen!

06 Banzembo 145:5

Nakolemba te kotatola bikamwa na Yo mpe kongenga makasi ya nkembo na Yo.

07 Banzembo 96:6

Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule.

08 Deteronomi 33:26

Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni, Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo, mpe na mapata, kati na nkembo na Ye.

09 Banzembo 21:5

Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango; opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.

10 2 Petelo 1:16

Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye.

11 Banzembo 29:4

Mongongo ya Yawe ezali na nguya; mongongo ya Yawe ezali na lokumu mingi.

12 Ezayi 2:10

Kimela na madusu ya mabanga, bombama na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye!

Bantína oyo etali