Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bosantu ya Nzambe

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Bosantu ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 6:3

Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu: « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga! Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye! »

02 1 Petelo 1:15-16

Kasi lokola Ye oyo abengaki bino azali Bule, bino mpe bozala bule kati na etamboli na bino nyonso, pamba te ekomama: « Bozala bule, pamba te nazali Bule. »

03 Levitike 19:2

« Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele: ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule.

04 Emoniseli 15:4

Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.

05 1 Samuele 2:2

Moko te azali bule lokola Yawe; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.

06 Abakuki 1:13

Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo?

07 Banzembo 99:5

Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye; azali Mosantu.

08 Kobima 15:11

Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa?

09 Ezayi 57:15

Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi: « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.

Bantína oyo etali