Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nkolo Abongi na lokumu
Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Nkolo Abongi na lokumu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso: ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »
mpe bazalaki koloba na mongongo makasi: « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »
Yawe azali monene, abongi na lokumu; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.
Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
Mpe bayembaki nzembo ya sika: « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.
Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene; bango nyonso bazalaki koloba: « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela! »
Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai; azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai; azali nguba na ngai, Mobikisi na ngai, mpe ekimelo na ngai.
Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.