Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Limemya liboso ya Nzambe

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Limemya liboso ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 33:8

Tika ete mokili mobimba etosa Yawe! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga liboso na Ye.

02 Banzembo 96:9

Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye!

03 Abakuki 2:20

Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye!

04 Banzembo 89:7

Nani akokani na Yawe kuna na likolo? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo?

05 Ba-Ebre 12:28

Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye: na botosi mpe na kobanga.

Bantína oyo etali