Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Elembo ya Molimo

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Elembo ya Molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 1:13

Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo, Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto; mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe

02 Ba-Efeso 4:30

Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.

03 2 Bakolinto 1:22

abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.

04 2 Bakolinto 5:5

Nzambe oyo abongiseli biso likambo yango apesi biso Molimo na Ye lokola ndanga ya biloko oyo esengeli koya.

05 Barome 8:23

Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.

06 2 Timote 2:19

Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe: « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »

07 Yoane 6:27

Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.

08 Barome 8:16

Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.

09 1 Yoane 3:24

Moto oyo atosaka mibeko na Ye awumelaka kati na Nzambe, mpe Nzambe awumelaka kati na ye. Bongo ndenge nini toyebaka ete Nzambe azali kowumela kati na biso? Ezali na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso.

10 Bagalatia 4:6

Mpe mpo ete bozali penza bana, Nzambe atindaki Molimo ya Mwana na Ye kati na mitema na biso, Molimo oyo agangaka: « Aba, » elingi koloba: « Tata! »

11 Ba-Efeso 4:4

Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko.

12 1 Bakolinto 6:11

Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.

Bantína oyo etali