Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nguya ya lolemo
Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Nguya ya lolemo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo: ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene! Lolemo mpe ezali moto; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.
Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.
Maloba ya kimia ezali lokola nzete ya bomoi, kasi maloba ya botomboki ezokisaka motema.
Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino: na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki. Pamba te ezali na nzela ya maloba na yo moko kaka nde bakolongisa yo to bakokweyisa yo.
Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango: ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka.
Moto oyo abatelaka monoko mpe lolemo na ye abatelaka molimo na ye na pasi.