Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mokonzi ya Seko

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Mokonzi ya Seko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Timote 1:17

Tika ete lokumu mpe nkembo ezonga epai ya Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te mpe azali Nzambe se moko mpo na libela na libela! Amen.

02 Banzembo 47:7

Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.

03 Emoniseli 19:16

Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo: « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »

04 Banzembo 145:13

Ozali Mokonzi seko na seko, mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela. Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso, asalaka nyonso na bolingo.

05 Daniele 4:34

Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.

06 Banzembo 93:1-2

Yawe azali kokonza, alati lokumu monene; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te. Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala; seko na seko, ozali.

07 Banzembo 24:7-8

Bino bikuke, botombola mitondo na bino! Bino bikuke ya kala, bomitombola! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota! Nani azali Mokonzi yango ya nkembo? Ezali Yawe, Elombe ya nguya; Yawe, Elombe ya bitumba.

08 Jeremi 10:10

Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. Soki asiliki, mokili eninganaka, bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.

09 Banzembo 10:16

Yawe azali Mokonzi mpo na seko, bapagano bakozala lisusu te kati na mokili na Ye.

10 1 Timote 6:15

na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,

11 Zakari 14:9

Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.

12 Banzembo 29:10

Yawe avandaki na Kiti ya Bokonzi na likolo ya mpela; Yawe avandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mokonzi mpo na libela.

13 Ezayi 6:5

Nalobaki: « Mawa na ngai! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga! »

Bantína oyo etali