Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Nkembo ya Nkombo na Ye

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Nkembo ya Nkombo na Ye mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 29:2

Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye; bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.

02 Banzembo 8:1

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

03 Bafilipi 2:9-10

Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso, mpo ete, na Kombo na Yesu, mabolongo nyonso efukama kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,

04 Banzembo 113:3

Longwa na este kino na weste, tika ete Kombo ya Yawe epambolama!

05 Malashi 1:11

Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

06 Banzembo 96:8

Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye!

07 Ezayi 12:4

Na mokolo wana bokoloba: « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, bosakola misala na Ye kati na bikolo mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso.

08 Banzembo 72:19

Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye! Amen! Amen!

Bantína oyo etali