Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Motole ya bomoi

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Motole ya bomoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Emoniseli 2:10

Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.

02 Jake 1:12

Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.

03 2 Timote 4:8

Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana: akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.

04 1 Petelo 5:4

Bongo tango Mokonzi ya babateli bibwele akoya, bokozwa motole ya nkembo oyo ekotikala kobungisa kitoko na yango te.

05 1 Bakolinto 9:25

Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.

06 Emoniseli 3:11

Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.

07 2 Timote 2:5

Ezali mpe ndenge moko mpo na moto oyo azali kosala lisano ya kokima mbangu: akoki te kozwa motole soki akimi mbangu te kolanda mibeko ya lisano.

Bantína oyo etali