Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bosaleli

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Bosaleli mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Malako 10:45

Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.

02 Matayo 20:28

Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.

03 Yoane 13:15

pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino.

04 Bafilipi 2:7

kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto;

05 Bagalatia 5:13

Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.

06 Matayo 23:11

Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino.

07 1 Petelo 4:10

Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.

08 Malako 9:35

Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.

09 Luka 22:27

Pamba te nani aleki monene? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa? Ezali te oyo avandi na mesa? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.

10 Jozue 24:15

Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »

11 Bakolose 3:23-24

Mosala nyonso oyo bosalaka, bosalaka yango na mitema na bino mobimba, lokola nde bozali kosala yango mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te, pamba te boyebi malamu ete bokozwa, lokola lifuti, libula oyo Nkolo abongisa mpo na bato ya Nzambe. Ezali Klisto nde azali Nkolo oyo bosalelaka.

Bantína oyo etali