Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kosukola makolo

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Kosukola makolo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 13:14

Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo;

02 Yoane 13:15

pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino.

03 Yoane 13:16

Nazali koloba na bino penza ya solo: mowumbu aleki nkolo na ye te na bokonzi, mpe ntoma aleki motindi na ye te na bokonzi.

04 Bagalatia 5:13

Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.

05 Bafilipi 2:7

kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto;

06 Yoane 13:5

Bongo, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na Ye mpe kopangusa yango na eteni ya elamba oyo amikangaki na loketo.

07 Yoane 13:8

Kasi Petelo alobaki na Yesu: — Te! Osengeli te kosukola ngai makolo! Yesu azongiselaki ye: — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.

08 Yoane 13:12-13

Sima na Yesu kosukola bango makolo mpe kolata lisusu bilamba na Ye, avandaki lisusu na mesa mpe alobaki na bango: — Boni, bososoli tina ya likambo oyo nawuti kosala bino? Ndenge bobengaka Ngai « Moteyi » mpe « Nkolo, » bolobaka na bino penza ya solo, pamba te nazali penza Moteyi mpe Nkolo.

09 Yoane 13:17

Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.

10 Luka 22:27

Pamba te nani aleki monene? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa? Ezali te oyo avandi na mesa? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.

11 Malako 10:45

Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.

12 1 Timote 5:10

kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu: abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.

13 Barome 12:10

Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu;

Bantína oyo etali