Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kosalela basusu

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Kosalela basusu mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bagalatia 5:13

Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.

02 1 Petelo 4:10

Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.

03 Matayo 25:40

Mokonzi akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »

04 Ba-Ebre 6:10

Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.

05 Barome 12:11

mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu;

06 Bagalatia 6:10

Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.

07 Malako 10:45

Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.

08 Yoane 13:14

Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo;

09 Bafilipi 2:4

Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu.

10 Misala ya Bantoma 20:35

Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba: « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »

11 1 Bakolinto 12:7

Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.

12 Matayo 20:26-27

Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino; mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino!

13 Ba-Efeso 6:7

Bosalaka na esengo lokola bawumbu ya Nkolo, kasi lokola bawumbu ya bato te,

Bantína oyo etali