Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bonene na Bokonzi

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Bonene na Bokonzi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 20:26

Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino;

02 Matayo 23:11

Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino.

03 Malako 9:35

Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.

04 Luka 22:26

Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.

05 Matayo 18:4

Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.

06 Matayo 18:3

mpe alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.

07 Luka 9:48

mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.

08 Matayo 20:27

mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino!

09 Malako 10:43-44

Esengeli te kozala bongo kati na bino; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino; mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu ya bino nyonso!

Bantína oyo etali