Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Komikitisa
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Komikitisa mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.
Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo.
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi: « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
Pamba te moto oyo amitombolaka, bakokitisa ye; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »