Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotia basusu liboso

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kotia basusu liboso mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bafilipi 2:4

Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu.

02 Barome 12:10

Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu;

03 1 Bakolinto 10:24

Tika ete moto moko te aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya moto mosusu!

04 Bafilipi 2:3

Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino.

05 Bagalatia 6:2

Bomemisana mikumba bino na bino; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.

06 1 Bakolinto 13:5

ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.

07 Barome 15:1-2

Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko. Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye!

08 Malako 9:35

Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.

09 Yoane 15:13

Bolingo oyo eleki monene ezali: kokaba bomoi mpo na balingami.

10 Bafilipi 2:5-7

Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango. Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, amonaki yango te lokola eloko ya kowelela, kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu, amikomisaki lokola moto mpe amonanaki bongo lokola moto;

11 1 Bakolinto 10:33

Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.

12 Barome 12:16

Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.

Bantína oyo etali