Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kobikisama na molili

Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Kobikisama na molili mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bakolose 1:13

Akangolaki biso na bokonzi ya molili mpe amemaki biso kati na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo,

02 1 Petelo 2:9

Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.

03 Ba-Efeso 5:8

Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole,

04 Misala ya Bantoma 26:18

mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »

05 Yoane 8:12

Yesu alobaki lisusu na bato: — Nazali pole ya mokili; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.

Bantína oyo etali