Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bóboma Molimo te

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Bóboma Molimo te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Batesalonika 5:19

Bopekisaka te mosala ya Molimo Mosantu,

02 Ba-Efeso 4:30

Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.

03 1 Batesalonika 5:20-21

botiolaka masakoli te kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu.

04 Misala ya Bantoma 7:51

Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino: botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu!

05 Bagalatia 5:25

Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.

06 Ezayi 63:10

Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.

07 Ba-Ebre 3:7-8

Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi: « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe, na mokolo ya komekama kati na esobe

08 Barome 12:11

mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu;

09 Banzembo 51:11

Kotala lisusu masumu na ngai te, mpe longola bambeba na ngai nyonso.

10 Ba-Ebre 10:29

ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu?

11 Matayo 12:31

Yango wana, nazali koloba na bino penza ya solo: lisumu nyonso mpe makambo mabe nyonso oyo bato bakoki koloba na tina na Nzambe ekolimbisama; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te.

12 Misala ya Bantoma 5:3

Boye, Petelo atunaki ye: — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo?

Bantína oyo etali