Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bolingo, likabo eleki monene

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Bolingo, likabo eleki monene mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 13:13

Boye sik’oyo, makambo oyo misato ezali kowumela: kondima, elikya mpe bolingo; kasi kati na yango, likambo oyo eleki monene ezali nde bolingo.

02 1 Bakolinto 13:1

Soki nalobi nkota ya bato to ya ba-anjelu, kasi nazangi bolingo, nazali kaka lokola ngonga oyo ezali kobeta to lokola manzanza oyo ezali kotia makelele.

03 1 Bakolinto 13:2

Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.

04 1 Bakolinto 13:8

Bolingo ekotikala kokufa te. Kasi masakoli ekokatana, nkota ekosila, boyebi ekolimwa.

05 Bakolose 3:14

Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.

06 1 Bakolinto 13:4-5

Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe.

07 1 Bakolinto 13:6-7

Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo. Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.

08 1 Yoane 4:8

Moto oyo azangi bolingo ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe azali bolingo.

09 Yoane 13:34-35

Nazali kopesa bino mobeko ya sika: Bolinganaka bino na bino. Ndenge Ngai nalingi bino, bino mpe bosengeli kolinganaka bino na bino. Ezali na nzela ya bolingo oyo bokotalisana bino na bino nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na Ngai.

10 Barome 13:8

Bozala na niongo ya moto te, longola kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te moto oyo alingaka bato mosusu akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka.

11 1 Yoane 4:16

Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.

12 1 Petelo 4:8

Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.

13 Barome 13:10

Moto oyo azali na bolingo asalaka moninga na ye mabe te. Boye, kolinga moninga, yango nde kokokisa Mobeko nyonso.

14 1 Yoane 4:19

Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.

15 Bagalatia 5:6

Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali: kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo; ezali te: kokatama ngenga to kokatama ngenga te.

Bantína oyo etali