Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Makabo ebele, Molimo moko

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Makabo ebele, Molimo moko mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

Bakisá bavɛrsɛ nyɔnsɔ 11 Kela kɔ́nti ya ofele mpo na kokanga yango na motó.
01 1 Bakolinto 12:4 Vɛrsɛ ya ntina

Makabo ezali ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko.

02 1 Bakolinto 12:5-6

Misala ezali ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko. Ezali na lolenge ebele ya kosalela Nkolo, kasi Nzambe azali kaka moko; mpe ezali Ye nde asalaka nyonso kati na bato nyonso.

03 1 Bakolinto 12:11

Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.

04 Ba-Efeso 4:4

Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko.

05 Barome 12:5

ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.

06 1 Bakolinto 12:7

Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.

07 Ba-Efeso 4:7

Nzokande kati na biso, moto nyonso azwaki ngolu kolanda ndenge Klisto akabolaki.

08 1 Bakolinto 12:14

Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele.

09 Barome 12:6

Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima,

10 Ba-Efeso 4:11

Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi,

11 1 Bakolinto 12:18

Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.

Bantína oyo etali