Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mbuma ya Molimo

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Mbuma ya Molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bagalatia 5:22-23

Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.

02 Yoane 15:5

Nazali nzete ya vino; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.

03 Matayo 7:17

Nzete nyonso ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, kasi nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe.

04 Bagalatia 5:25

Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.

05 Bakolose 1:10

mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,

06 Yoane 15:8

Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu.

07 Matayo 7:20

Boye, bokoyeba basakoli ya lokuta na nzela ya misala na bango.

08 Bafilipi 1:11

bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.

09 Jake 3:17

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

10 Ba-Efeso 5:9

pamba te mbuma ya pole ezali: boboto, bosembo, mpe bosolo.

11 Barome 6:22

Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.

12 Yoane 15:16

Ezali bino te bato boponaki Ngai! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.

13 Ba-Ebre 12:11

Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango: bomoi ya bosembo mpe ya kimia.

14 Banzembo 1:3

Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te; misala na ye nyonso etambolaka malamu.

15 Bakolose 1:6

oyo ekomaki kino epai na bino. Sango Malamu yango epanzani mokili mobimba, ezali kobota bambuma ebele mpe ezali kokende liboso, ndenge kaka esalaki kati na bino wuta mokolo oyo boyokaki yango mpe bozwaki penza bososoli ya kokoka na tina na ngolu ya Nzambe.

Bantína oyo etali