Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Makabo ya Molimo
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Makabo ya Molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.
Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.
Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima,
Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya; epai na mosusu, liloba ya boyebi; epai na mosusu kondima; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli; epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa; epai na mosusu, likabo ya kosakola; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota.
Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi, mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu.
Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki: ya liboso, bantoma; ya mibale, basakoli; ya misato, balakisi; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.
Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.
Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima, tika ete moto oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba amipesaka na mosala yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa malakisi apesaka yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo!
Boye bolukaka liboso bolingo, mpe bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, mpe mingi penza likabo ya kosakola.
Nzambe mpe azalaki kokokisa bosolo ya litatoli na bango na nzela ya bilembo ya kokamwa, na nzela ya misala minene, ya bikamwa ya ndenge na ndenge mpe ya makabo ya Molimo Mosantu, oyo azalaki kopesa bango kolanda mokano na Ye.
Nzokande kati na biso, moto nyonso azwaki ngolu kolanda ndenge Klisto akabolaki.
Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.