Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kosalela na makabo
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Kosalela na makabo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.
Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima, tika ete moto oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba amipesaka na mosala yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa malakisi apesaka yango,
Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.
Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.
Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen!
mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu;