Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bopɔlɔ

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Bopɔlɔ mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Matayo 5:5

Esengo na bato na komikitisa, pamba te bakozwa mokili lokola libula!

02 Bagalatia 5:23

boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.

03 Mitango 12:3

Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.

04 1 Petelo 3:4

kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati: esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.

05 Sofoni 2:3

Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.

06 Bakolose 3:12

Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.

Bantína oyo etali