Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bolingo esukaka te

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Bolingo esukaka te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Bakolinto 13:8

Bolingo ekotikala kokufa te. Kasi masakoli ekokatana, nkota ekosila, boyebi ekolimwa.

02 1 Bakolinto 13:13

Boye sik’oyo, makambo oyo misato ezali kowumela: kondima, elikya mpe bolingo; kasi kati na yango, likambo oyo eleki monene ezali nde bolingo.

03 Barome 8:38-39

Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

04 Loyembo ya Salomo 8:7

Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te; ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te. Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako mpo na kosomba bolingo, solo penza bakotiola ye.

05 1 Bakolinto 13:7

Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.

06 Barome 8:35

Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga?

07 1 Yoane 4:18

Kati na bolingo, kobanga ezalaka te; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.

08 Jeremi 31:3

Yawe abimelaki biso na kala, alobaki: « Nalingaka bino na bolingo ya seko; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.

09 Banzembo 136:1

Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!

10 Yoane 13:1

Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.

Bantína oyo etali