Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokabi

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Bokabi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 2 Bakolinto 9:7

Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.

02 Masese 11:24-25

Moto oyo akabaka na motema malamu azwaka mingi koleka, mpe moto oyo abombaka kaka akomaka mobola. Moto oyo akabaka akokoma na bomengo; mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi, ye mpe bakopesa ye mayi.

03 Luka 6:38

bopesaka, mpe bakopesa bino; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »

04 2 Bakolinto 9:6

Bokanisaka likambo oyo: Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele.

05 Misala ya Bantoma 20:35

Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba: « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »

06 Masese 22:9

Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.

07 1 Timote 6:18

Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.

08 Masese 19:17

Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.

09 Deteronomi 15:10

Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba.

10 Matayo 10:8

Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.

11 Ba-Ebre 13:16

Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.

12 Masese 28:27

Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te, kasi moto oyo aboyaka kotala bango akotonda na bilakeli mabe.

13 Banzembo 112:5

Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.

Bantína oyo etali