Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mobeko oyo eleki monene
Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Mobeko oyo eleki monene mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yesu azongiselaki ye: — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso. Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene. Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso.
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. »
Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe.
Mibeko lokola: « Okosalaka ekobo te, » « okobomaka te, » « okoyibaka te, » « okolulaka te, » mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na mobeko oyo moko: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale.
Molakisi ya mibeko azongisaki: — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
Pamba te Mobeko nyonso ekokisami kati na liloba kaka moko: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
Kutu, Klisto apesaki biso mobeko oyo: moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.
Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai.
Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino: kolinga Yawe, Nzambe na bino; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. »