Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kolinga banguna
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Kolinga banguna mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino: Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi: Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu. Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
Nzokande, « Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei; soki azali na posa ya komela mayi, pesa ye mayi. Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye. »
Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei; soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.
Bopambolaka bato oyo banyokolaka bino; iyo, bopambolaka, kasi bolakelaka mabe te!