Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bolingo na misala

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Bolingo na misala mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Yoane 3:18

Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo.

02 Jake 2:15-16

Ndakisa: soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba ya kolata mpe bilei ya mokolo na mokolo, bongo moko kati na bino alobi na ye: « Kende na kimia, yetola moto mpe lia, » kasi apesi ye te eloko oyo azali na yango posa mpo na nzoto na ye, maloba wana ezali na tina nini?

03 1 Yoane 3:17

Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye?

04 Bagalatia 5:13

Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.

05 Matayo 25:40

Mokonzi akozongisela bango: « Nazali koloba na bino penza ya solo: eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »

06 Jake 2:17

Ezali mpe bongo mpo na kondima: soki kondima ezangi misala, ezali ya kokufa.

07 1 Yoane 4:11

Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso.

08 Bagalatia 6:10

Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.

09 Ba-Ebre 13:16

Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.

10 Barome 12:9

Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu.

11 Luka 10:33-34

Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa, apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna.

12 1 Bakolinto 13:3

Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.

Bantína oyo etali