Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Boboto

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Boboto mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 4:32

Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.

02 Bakolose 3:12

Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.

03 Bagalatia 5:22-23

Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.

04 Masese 11:17

Moto oyo asalelaka bato bolamu amisalelaka nde bolamu, kasi moto na kanza amimonisaka pasi.

05 Luka 6:35

Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.

06 Masese 19:17

Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.

07 Mishe 6:8

Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo: Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.

Bantína oyo etali