Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Goigoi

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Goigoi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Masese 6:6

Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya!

02 Masese 13:4

Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.

03 Masese 20:4

Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.

04 Masese 24:30-31

Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi, mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele; bongo, tala ndenge etondi na banzube, tala ndenge matiti mabe ezipi yango, mpe mir na yango ya mabanga ebukani.

05 2 Batesalonika 3:10

Pamba te, ezala tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo: « Tika ete moto oyo aboyi kosala mosala alia mpe te! »

06 Masese 19:15

Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.

07 Masese 26:14

Moto ya goyigoyi abalukaka na mbeto na ye ndenge ekuke ebalukaka na biloko oyo efungolaka yango.

08 Masese 21:25

Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.

09 Mosakoli 10:18

Soki moto azali goyigoyi, likolo ya ndako na ye ekobukana; soki maboko na ye elemba, ndako na ye ekotanga mayi.

Bantína oyo etali