Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kolela
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Kolela mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba: « Wapi Nzambe na yo? »
Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.
Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te; ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene!
Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye; bokumisa Kombo na Ye ya bule.