Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kosambela na Makomi

Bavɛrsɛ 15 ya Biblia na ntína ya Kosambela na Makomi mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 15:7

Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.

02 Banzembo 119:18

Fungola miso na ngai mpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo.

03 Ezayi 55:11

ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka: ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.

04 Bakolose 3:16

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.

05 Ba-Ebre 4:12

Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.

06 Banzembo 119:105

Liloba na Yo ezali mwinda mpo na makolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.

07 Banzembo 119:11

Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.

08 2 Timote 3:16

Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,

09 Jozue 1:8

Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.

10 Matayo 4:4

Yesu azongisaki: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »

11 Yoane 8:31-32

Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye: — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai, bokoyeba solo, mpe solo ekokangola bino.

12 Banzembo 1:2

kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi.

13 Deteronomi 11:18

Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo.

14 Barome 10:17

Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.

15 Banzembo 19:14

Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.

Bantína oyo etali