Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Molende na losambo

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Molende na losambo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Luka 18:1

Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.

02 Luka 11:9-10

Boye, Ngai nazali koloba na bino: Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokomona; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino. Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.

03 Bakolose 4:2

Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.

04 Barome 12:12

mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende;

05 Luka 18:7

Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi? Boni, akozelisa bango?

06 Luka 11:8

Nazali koloba na bino penza ya solo: ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.

07 Ba-Efeso 6:18

Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.

08 1 Batesalonika 5:17

bosambelaka na kolemba te;

09 Luka 18:5

kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. »

10 Ebandeli 32:26

Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda.

Bantína oyo etali