Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bósambela kozanga kotika

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Bósambela kozanga kotika mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Batesalonika 5:17

bosambelaka na kolemba te;

02 Bakolose 4:2

Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.

03 Ba-Efeso 6:18

Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.

04 Luka 18:1

Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.

05 Barome 12:12

mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende;

06 Misala ya Bantoma 1:14

Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.

07 Misala ya Bantoma 2:42

Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.

08 Daniele 6:10

Boye, mokonzi Dariusi akomaki mokano oyo azwaki mpo ete babongola yango te mpe atiaki mokoloto na mokano yango.

09 Banzembo 55:17

Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.

10 1 Masolo ya Kala 16:11

Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye! Bolukaka tango nyonso elongi na Ye!

11 Bafilipi 4:6

Bomitungisaka ata na likambo moko te; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.

12 Misala ya Bantoma 6:4

Boye, biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya koteya Liloba na Nzambe.

13 Barome 1:9

Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino

Bantína oyo etali