Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Abikisaka bato ya mitema ebukani
Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Abikisaka bato ya mitema ebukani mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.
Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko;
Nkolo, fungola bibebu na ngai, mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba; Ngai, nakopesa bino bopemi.
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi: « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.