Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Libela elongo na Nkolo

Bavɛrsɛ 11 ya Biblia na ntína ya Libela elongo na Nkolo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Batesalonika 4:17

Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.

02 1 Batesalonika 4:16

pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.

03 Yoane 17:24

Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.

04 Emoniseli 21:3

Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba: « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.

05 Banzembo 23:6

Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai, esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai; mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe kino suka ya bomoi na ngai.

06 Yoane 14:3

Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali.

07 Emoniseli 22:5

Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.

08 Banzembo 73:23-24

Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo; osimba ngai na loboko na ngai ya mobali. Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.

09 2 Bakolinto 5:8

Totondi penza na mpiko, kasi tokosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo.

10 Bafilipi 1:23

Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo: na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu;

11 1 Yoane 2:17

Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.

Bantína oyo etali