Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bakapita ya sembo
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Bakapita ya sembo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.
Moto oyo azali sembo na makambo mike, akoki mpe kozala sembo na makambo minene; mpe moto oyo azali sembo te na makambo mike, akozala mpe sembo te na makambo minene.
Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.
Nkolo azongiselaki ye: « Malamu! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
Nkolo azongisaki: — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki? Esengo na mosali oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo! Nazali koloba na bino penza ya solo: nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.
Nkolo azongiselaki ye: « Malamu! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
Boye soki bozali sembo te na bobateli bomengo oyo ezwami na banzela ya lokuta, nani akopesa bino bomengo ya solo?
Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe.
Lokola motambolisi misala ya Nzambe, mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela. Yango wana, asengeli kozala moto na lolendo te, moto na kanda te, molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na lokoso ya mbongo te.
Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu, mpe akokoma na bofuluki; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.