Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kolongisama na likambo

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Kolongisama na likambo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Barome 8:33

Nani akofunda bato oyo Nzambe apona? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo.

02 Barome 8:34

Nani akokatela bango etumbu? Moko te! Yesu-Klisto akufaki; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.

03 Barome 8:1

Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.

04 Ezayi 50:8-9

Ye oyo alongisaka ngai azali pene, nani akokoka kotelemela bosembo na ngai? Tika ete tosamba elongo! Nani akofunda ngai ete tosamba na ye? Tika ete apusana pene na ngai! Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai; nani akolonga ngai na esambiselo? Tala, bango nyonso bakokweya lokola bilamba ya kala oyo ebeba, bongo nseka ekolia bango.

05 Barome 4:7-8

« Esengo na bato oyo mabe na bango elimbisami, mpe masumu na bango elongwe! Esengo na moto oyo Nkolo atangelaka lisumu te! »

06 Barome 5:1

Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto

07 Barome 3:24

mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto.

08 Yoane 5:24

Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.

09 Bakolose 2:13-14

Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso, apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu.

10 Barome 5:9

Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe.

Bantína oyo etali