Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bana ya Nzambe

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bana ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Yoane 1:12

nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.

02 1 Yoane 3:1

Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te: ezali mpo ete eyebi Nzambe te.

03 Barome 8:16

Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.

04 Bagalatia 3:26

Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto;

05 Barome 8:14

Pamba te bato oyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe bazali bana na Nzambe.

06 1 Yoane 3:2

Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.

07 Bafilipi 2:15

mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili

08 Yoane 11:52

Mpe asengelaki kokufa kaka mpo na ekolo yango te, kasi mpe mpo na kosangisa kati na libota moko, bana nyonso ya Nzambe, oyo bapalangana bipai na bipai.

Bantína oyo etali