Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kokoma bana ya Nzambe

Bavɛrsɛ 9 ya Biblia na ntína ya Kokoma bana ya Nzambe mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Bagalatia 4:5

mpo na kosikola bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpe mpo na kopesa biso makoki ya kokoma bana na Nzambe.

02 Barome 8:15

Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka: « Tata! »

03 Ba-Efeso 1:5

abongisa biso wuta kala mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,

04 Yoane 1:12

nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.

05 1 Yoane 3:1

Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te: ezali mpo ete eyebi Nzambe te.

06 Bagalatia 3:26

Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto;

07 Ba-Efeso 1:6

mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.

08 Barome 8:23

Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.

09 2 Bakolinto 6:18

Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »

Bantína oyo etali