Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotángama sembo
Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Kotángama sembo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo.
Makomi elobi nini? « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe, yango wana Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. »
Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo.
Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe; mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akomisaki ye moto ya sembo.
Yango wana, mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. Nzokande, ezali mpo na ye moko kaka te nde ekomama: « Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo; » ezali mpe mpo na biso oyo Nzambe akotanga lokola bato ya sembo mpo ete tondimelaka Ye oyo asekwisaki, kati na bakufi, Yesu, Nkolo na biso,
Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatisa ngenga to ezali mpe mpo na bato oyo bakatisa ngenga te? Solo, tozali koloba: Mpo ete Abrayami azalaki na kondima, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo.
Davidi mpe alobaki bongo tango atatolaki esengo ya moto oyo Nzambe akomisi sembo na kozanga misala:
Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te, mpe atambolaka na lokuta te.
Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi: « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. »
Nzambe apesaki ye elembo ya kokatama ngenga lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima, wana azalaki akatama nanu ngenga te. Boye akoma na mbala moko tata ya bato nyonso oyo bandimaka, wana bazali bakatama ngenga te mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo,
mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto: Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala.
Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »