Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Etumbu ezali lisusu te
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Etumbu ezali lisusu te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
Nani akofunda bato oyo Nzambe apona? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo. Nani akokatela bango etumbu? Moko te! Yesu-Klisto akufaki; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.
Moto nyonso oyo andimi Ye akozwa etumbu te; kasi ye oyo aboyi kondima Ye asili kozwa etumbu, pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe.
Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai; nani akolonga ngai na esambiselo? Tala, bango nyonso bakokweya lokola bilamba ya kala oyo ebeba, bongo nseka ekolia bango.
Nzambe atindaki Mwana na Ye kati na mokili mpo ete akatela yango etumbu te, kasi mpo ete abikisa yango.
Nzembo ya Davidi. Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami, mpe masumu na ye elongwe! Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te, mpe atambolaka na lokuta te.
apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu.
Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto
Tala mpo na nini bolingo ezali ya kokoka kati na biso: ezali mpo ete tozala na elikya ya kokoka na mokolo ya kosambisama; pamba te kati na mokili oyo, ndenge Klisto azali, ndenge biso mpe tozali.