Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bótánga yango esengo

Bavɛrsɛ 8 ya Biblia na ntína ya Bótánga yango esengo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Jake 1:2

Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango.

02 Jake 1:3-4

Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema. Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela.

03 Barome 5:3-4

Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.

04 1 Petelo 4:13

Bosepela nde, pamba te bozali kosangana na bapasi ya Klisto mpo ete botonda mpe na esengo tango akomonisa nkembo na Ye.

05 Matayo 5:11-12

Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai! Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.

06 1 Petelo 1:6

Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso.

07 Misala ya Bantoma 5:41

Bantoma balongwaki liboso ya Likita-Monene, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu.

08 Barome 5:3

Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko,

Bantína oyo etali