Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Tokomona Ye

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Tokomona Ye mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Yoane 3:2

Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.

02 1 Bakolinto 13:12

Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na talatala; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.

03 Emoniseli 22:4

Bakomona elongi na Ye, mpe Kombo na Ye ekokomama na bambunzu na bango.

04 Matayo 5:8

Esengo na bato oyo bazali na mitema peto, pamba te bakomona Nzambe!

05 Yobo 19:25-26

Ngai, nayebi na ngai malamu ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, mpe, awa na mokili, akotelema ya suka mpo na kokata likambo na ngai. Sima na kobebisama ya poso ya nzoto na ngai, ngai, na nzoto na ngai, nakomona Nzambe.

06 Emoniseli 1:7

« Botala, azali koya kati na mapata! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo! Amen.

07 Banzembo 17:15

Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo!

08 2 Bakolinto 3:18

Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.

09 Yoane 17:24

Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili.

10 Ba-Ebre 12:14

Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.

11 Bafilipi 3:21

Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.

12 Bakolose 3:4

Tango Klisto oyo azali bomoi na bino akomonana, bino mpe bokomonana elongo na Ye kati na nkembo.

13 1 Batesalonika 4:17

Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.

Bantína oyo etali