Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Kotambola na banzela na Ye
Bavɛrsɛ 5 ya Biblia na ntína ya Kotambola na banzela na Ye mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,
Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo: Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.
Esengo na bato oyo bazangi pamela mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe! Esengo na bato oyo babatelaka malako na Ye mpe balukaka Ye na mitema na bango mobimba!
Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo: « Tala nzela yango oyo! »
Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.