Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mokano na ngai te

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Mokano na ngai te mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Luka 22:42

« Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [

02 Matayo 26:39

Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye: — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.

03 Yoane 6:38

Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.

04 Malako 14:36

Azalaki kobondela: — Tata! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.

05 Bafilipi 2:8

amikitisaki penza mpe atosaki kino na kufa, ata na kufa ya ekulusu.

06 Yoane 4:34

Yesu alobaki na bango: — Bilei na Ngai ezali: kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.

07 Yoane 5:30

Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko: nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.

08 Ba-Ebre 10:7

Bongo nalobaki: ‹ Tala ngai oyo, nayei, nayei, oh Nzambe, mpo na kosala mokano na Yo, kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku. › »

09 Ba-Ebre 5:8

Atako azalaki Mwana na Nzambe, kasi ayekolaki botosi na nzela ya pasi nyonso oyo amonaki.

10 Banzembo 40:8

Bongo nalobaki: « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.

11 Barome 5:19

Pamba te ndenge kozanga botosi ya moto moko ekomisaki bato ebele bato ya masumu, ndenge wana mpe botosi ya moto moko ekomisi bato ebele bato ya sembo.

12 1 Petelo 2:23

Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.

Bantína oyo etali